Other Music

Extra Musica – Losambo – Lyrics

Published

on

Intro
Losambo ya Extra
(Prayer of Extra)
Moto soki nanu akufi te koseka ye te
(If a man has not passed away don’t laugh at him)
Tata nzambe yoka losambo eh , losambo losambo
(God Father listen to our prayer, prayer, prayer)
Chorus:
Tata Nzambe
(God father)
Yoka losambo ya bana
(Listen to the prayers of your children)
Tolamukaka na tongo
(We get up every morning)
Po toluka la vie
(To look for a better life)
Tolamukaka na tongo po tomeka nzoto
(We get up to try to (get a better life)
Pesa nguya papa
(Give power Father)
Po tokoka yango
(In order to succeed)
1st solo
Ah nzambe tata
(Oh God Father)
Yo okeli ngayi
(You created me)
Sima ya biloko binso ya se
(After all the things on the earth)
Yo opesi moto mayele
(You gave man the intelligence)
Koleka biloko binso okela
(More than all things you created)
Po na nini ngayi te?
(Why not me?)
2nd solo
Mokili etondi pasi
(The world is full of pains)
Mokili etondi mabe
(The world is full of evils)
Nzambe Allah salisa ngai eh
(God Allah help me)
Baninga bazuaka se na realité nzambe
(My friends succeed in the reality God)
Oyo ya ngai se na ndoto
(But me in dreams)
Yahwe salisa nga ,
(Yahwhe help me)
Nzambe tata
(God the father)
Nakomona pasi
(I am suffering)
Ah ngai muana
(Me your son)
3rd solo
Nakofukama
(I bow down)
Tika na senga na Yahwe
(Let me ask Yahwe)
Ye moto asala likolo na se
(Him who has made heaven and earth)
Tata mozalisi
(Father Creator)
Tika na senga epayi na yo tata
(Let me beg to you father)
Yo nde mosungi na biso
(It’s you our helper)
Salisa biso papa
(Help us father)
Na mokili oyo ya se
(In this world)
4th solo
Nani moto apesa pema
(Who has given the breath?)
Se ye
(It’s Him)
Mokolo akobotola yango oyo nde bilelo
(The day he will get it back, it will be mourning)
Tokokumisa ye tata nzambe mosungi berger
(We will praise Him God the Father, the helper, the shepherd)
5th solo
Oh nakosenga na yo nzambe
(I ask to you God)
Mosalisi
(The helper)
Bikisia biso bana ya le congo
(Save us the sons of Congo)
Bitumba bitondi na mboka oyo
(This country is full of wars)
Kotika biso na pasi oyo te
(Don’t abandon us in this pain)
Brazzaville etondi pasi
(Brazzaville is full of pain)
Chorus:
Otikaki caina
(You abandoned cain (the brother of Abel),
Otikaki batu ya Noe
(You abandoned the men at Noah time
Otikaki sodome na gomorhe
(You abandoned sodoma and gomora)
Tala pasi na biso
(Take a look at our pains)

Leave a Reply

Your email address will not be published. Required fields are marked *

Trending Music Lyrics

Exit mobile version