Connect with us

Rhumba lyrics

12600 Letters by Franco Luambo Makiadi

Published

on

 12600 Letters by Franco Luambo Makiadi


Advertisement
1) Why sisters
Don’t like their
Brothers wives
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
1) Bandeko ya basi yo yo yo
Balingaka basi ya bandeko mibali te
Mpo na nini oh yo yo yo
Bandeko ya basi yo yo yo
Balingaka basi ya bandeko mibali te
Mpo na nini oh, yo yo yo
2) God forbid people who
Are related to marry.
Someone else will come from far away and marry your relative.
Why annoyance in
Couples?
2) Nzambe aloba na mokili
Okoki kobala ndeko na yo te.
Mutu mosusu akowuta mosika akobala ndeko na yo.
Mpo na nini motungisi
Na mabala oh?
3) God said mary and create your own family.
Your sister will mary and create her own family.
We want peace
Within the family.
3) Nzambe aloba na mokili bala osala ya yo famille.
Ndeko na yo ya mwasi akobala akosala ya ye famille.
Tolingi la paix ezala
Na famille.
4) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
4) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
5) I am tired.
I am exhausted.
Why such matter is only
Happening to me?
5) Nalembi eh yo yo, yo, oh.
Ngai nabaye nabaye oh, yo, yo, yo, oh.
Mpo na nini kaka ngai
Likambo ya motindo boye?
6) I am exhausted.
I am tired.
Why only me, only me, mates.
6) Ngai nabaye, nabaye oh yo yo yo oh.
Ngai na lembi eh yo yo yo ah.
Mpo na nini kaka ngai, kaka ngai bandeko?
7) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
7) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Gentlemen and ladies,
When I sing my songs
I often hear
Women saying that I am insulting them.
Bandeko mibali, bandeko basi
Nzembo oyo ezali koyemba.
Mpo nayokaka mingi que soki nayembi nzembo,
Epayi ya bandeko basi bakoloba que nazali kofinga bango.
9) But I received 12600 letters
Coming from married woman.
Soon I will be naming the countries
Where each letter come from. Thank you.
9) Mais awa nazwi 12600 lettres
Ewuti epayi ya basi ya mabala.
Na ngonga moko moko bokozala koyoka mboka moko moko
Nako zala kotanga minkanda myango, merci.
10) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
10) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
11) The letters I received were sent from women from Zaire.
I chose the letter written by Mrs Mosapi.
Mrs Mosapi says this
She has been fine with her in-laws since she got married
11) Minkanda nazwi ewuti na ba maman ya Zaire.
Naponi monkanda ya citoyenne Mosapi.
Citoyenne Mosapi ayibisi boye,
Wuta ye abala azalaki malamu ba basemeki na ye.
12) But now her in-laws have shifted their position.
They don’t want her to cook for her husband anymore.
Her in-laws are now cooking for her husband.
Is it good?
12) Mais sikoyo basemeki babalukila ye.
Balingi lisusu te alambela mobali.
Bango moko basemeki bakomi kolambela mobali na ye
Est-ce que wana ezali malamu?
13) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
13) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
*Long instrumental break
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
14) The letters I received were sent by women from Congo Brazzaville.
I chose the letter written by Mrs Bikuma.
Mrs Bikuma says this
14) Minkanda nazwi ya basi ya mabala ya Congo Brazzaville.
Naponi ya madame Bikuma.
Madame Bikuma ayebisi boye.
15) She is not lucky enough to get pregnant.
The husband has done all possible without success.
Her in-laws are constantly insulting her.
Saying that she is only going about in the car.
She is wearing jewelries.
Tired of hearing them, Mrs Bikuma beg her husband to marry another woman.
So that they can have a child because she can’t conceive.
15) Wuta ye abala chance ezali te mpo akoka kobota.
Mobali asali nyso moyen kaka te.
Mais basemeki musala kofingaka ye
Que ye musala kotambola na voiture,
Kolata ba bijous.
Mais abondeli mobali abala mwasi mosusu mpo
Akoka kobota ye moyen ezali te.
16) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
16) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
17) The letters I received were sent by women from Gabon.
I chose the letter written by Mrs Iyeku.
Mrs Iyeku says this
One of her brother-in-law insulted her parents.
17) Minkanda nazwi ewuti epayi ya basi ya mabala ya Gabon.
Naponi monkanda ya madame Iyeku.
Ayebisi boye,
Semeki na ye mokolo mosusu akeyi kofinga baboti na ye.
18) I want to know.
Is it me or my parents who married to
Her brother?
If that is what she wants to do,
She needs to insult me. I am the one who is married to her brother.
That is all!
18) Est-ce que nalingi nayeba.
Ngai muto nabalana na ndeko naye
To baboti na ngai bato babala ndeko na ye?
Soki alingi kofinga,
Aya kofinga ngai mutu nazali epayi ya ndeko na ye,
C’est tous!
19) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
19) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
20) The letters I received were sent by women from Cameroon.
I chose the letter written by Mrs Obima
Mrs Obima says this,
‘If my in-law hear something,
20) Minkanda nazwi ya basi ya mabala na mboka Cameroun,
Naponi munkanda ya madame Obima.
Madame Obima ayebisi boye,
Semeki na ngai soki ayoki ata likambo
21) Instead of asking me calmly,
She will come and shout at me in front of the kids.
The kids are grown.
She will insult me publicly.’
Is she acting like this because I am married to her brother?
21) Au lieu aya kotuna ngai na malembe na ndako
Akoya kaka abandi kotomboka kofinga ngai devant bana,
Bana basi bakoli!
Akofinga ngai, bato nyoso bayokaka ndenge akofinga ngai
Mpo te ngai nazali mwasi ya ndeko na ye?
22) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
22) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
23) The letters I received were sent by women from Togo.
I chose the letter written by Mrs Afya.
Mrs Afya says this,
He husband gave her fund to run a business
23) Minkanda nazwi ya basi ya mabala na mboka Togo
Naponi monkanda ya citoyenne Afya
Ye ayebisi boye,
Mobali apesa ye mbongo asalaka mombongo
24) She is selling in the market in Lome
When she is selling clothes,
He in-laws come to purchase clothes in credit;
But when is time to pay, the don’t pay.
Their reply: it is their brothers fund. Ah!
24) Azwa mesa na zando ya Lome,
Kuna soki azali koteka bilamba
Ba semeki na ye bakoya kodefa bilamba
Mais ntango ya kofuta balingi kofuta te,
Reponse na bango: Ezali mbongo ya ndeko na bango. Ah!
25) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
25) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
26) You sisters, all that I just said here
Happened
Is happening and is still happening
26) Bino bandeko basi manso oyo nawuti koyemba awa
Esi esalama,
Esalamaka mpe ezali kosalama
27) But you have to know that it is painful to your brothers.
He will go to work wondering
Does he have to love a relative or his wife.
But I believe.
Between the sister and the wife.
The choice is clear, isn’t it? Ah!
27) Mais boyeba que bozali kopesa mpasi na bandeko na bino ya mibali.
Akokende mosala azali kokanisa,
Alinga ndeko to alinga mwasi
Mais je crois.
Entre la femme et la soeur
Le choix est claire n’est-ce pas? Ah!
28) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
28) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
29) I am tired.
I am exhausted.
Why such matter is only
Happening to me?
I am tired.
I am exhausted
It is too much. I can’t handle it anymore.
29) Ngai nalembi, nalembi eh yo yo, yo, oh.
Ngai nabaye nalembi eh, yo, yo, yo, oh.
Mpo na nini kaka ngai, kaka ngai bandeko eh
Ngai nabaye nalembi eh yo yo yo oh.
Ngai nalembi nabaye eh yo yo yo oh.
Nakoya kosimba courant ngai nakufa eh.
30) Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
Why sisters
Don’t like their
Brothers’ wives?
30) Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.
Bandeko ya basi yo yo yo.
Balingaka basi ya bandeko mibali te.
Mpo na nini oh yo yo yo.