KATA BA LIENS (CUT THE TIES) by WUTA MAYI
Na motema nabomba toli baboti bapeseka ngai o
Soki ntembe nakoma kochangé mibali lokola bilamba
Na makanisi na ngai nayebaka te nani nasalaka ye mabe o
Soki mpe masumu ya bankoko yayambo mbongana kofuta
Ngai mwana mama! O mwana mama!
Na motema nabomba toli baboti bapesaka ngai, o
Soki ntembe nakoma kochangé mibali lokola papier mouchoir
Nayebaka te nani nasalaka ye mabe, o mama e
Soki mpe masumu bankoko basala nakoma kofuta
O nzambe na ngai!
O kata ba liens!
Yo, Mwutwa Ya Mbuntu, yo kebaka!
Yo mpe bambula epusani, tata na bana e
Kebaka na bana mike mike
Tata na bana na ngai
Bakosilisa yo economie
Simon kolelela ngai wapi mpema na koswana na mbanda
Surtout bana ya lelo bakobanga kutu ata nkola mobali te o
Bana mike ikolulaka
Bana mike miso kofungwama
Bazali lokola ngai te
Ngai mwasi na yo, papa
Bazali lokola ngai te
Fanatique na yo na bolingo
Simon kolelela ngai lisusu tension ebandi komata
Basi bandimisi yo mpo bakutanisi yo na mbanda na bana mike
Bana mike ikolulaka
Bana mike miso kofungwama
Bazali lokola ngai te
Ngai mwasi na yo, papa
Bazali lokola ngai te
Fanatique na yo na bolingo
Simon kolelela ngai lisusu tension ebandi komata
Basi bandimisi yo mpo bakutanisi yo na mbanda na bana mike
Miso ilembaka te o mpo nakolula ye
E mama e
Tomema ndambo e biso mibali e
Miso ilembaka te, na nkombo na ngai
Miso ilembaka te o mpo nakolula ye
Ata azali na moto
Tomema ndambo e pesa bon mesure
Ata ngai na moto, e ye ye
Miso ilembaka te mpo nakolula ye
Nzambe o na ngai e
Tomema ndambo, kati na pinzole
Pinzole mpe mingi
In my heart I keep the counsel my parents gave me.
If there’s any doubt about why I change men as if they were clothes,
In my mind I don’t know whom I wronged.
Perhaps I’m paying for the sins of my ancestors.
Alas and alack!
In my heart I keep the counsel my parents gave me.
If there’s any doubt about why I go through men as if they were tissue paper,
I’ve never known who it was that I wronged, O mother!
Perhaps I’m paying for the sins of my ancestors.
O my God!
Cut the ties!
You, Mwutwa Ya Mbuntu, be careful!
Father of children, your years are passing.
Beware of young girls!
Father of my children,
They will squander your wealth.
Simon, tell me where I can draw the breath to argue with my rival.
Young girls today have no fear of an older man.
Young girls are coveted –
Young girls with eyes wide open.
They are not like me.
I’m your wife, sir!
They are not like me.
Your fanatic in love!
Simon, call me when your blood pressure begins again to rise,
When women tease you upon catching you with your underage mistress.
Young girls are coveted –
Young girls with eyes wide open.
They are not like me.
I’m your wife, sir!
They are not like me.
Your fanatic in love!
Simon, call me when your blood pressure begins again to rise,
When women tease you upon catching you with your underage mistress.
Eyes never tire that I should still desire him.
Yes, woman, yes!
Let’s hold ourselves together a little longer, we two.
Eyes never tire, I do declare!
Eyes never tire that I should still desire him.
Even if he’s with someone else.
Let’s hold ourselves together a little longer and give it our best.
Even when he’s with someone else, right!
Eyes never tire that I should still desire him.
My God!
Let’s hold ourselves together even in tears.
Many tears!